1Nzembo ya bana ya Kore. Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, kati na engumba ya Nzambe na biso, ngomba na Ye ya bule.
2Ezali kitoko, ngomba moke oyo esalaka esengo ya mokili mobimba, ngomba Siona ! Ngambo na yango ya Nor nde ezali engumba ya Mokonzi Monene.
3Nzambe azali kati na bandako na yango ya bokonzi, amimonisi lokola ndako batonga makasi.
4Pamba te bakonzi basanganaki, batambolaki nzela moko.
5Kasi tango kaka bamonaki yango, bakamwaki mpe bakimaki na somo.
6Mbala moko, bakomaki kolenga wana lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota
7to lokola mopepe ya Este oyo apanzaka masuwa ya Tarsisi.
8Ndenge kaka bayebisaki biso, ndenge mpe tomonaki kati na engumba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, kati na engumba ya Nzambe na biso ; Nzambe alendisaka yango seko na seko.
9Nzambe, kati na Tempelo na Yo, tokanisaka bolingo na Yo.
10Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili, ndenge moko na Kombo na Yo ; loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo.
11Ngomba ya Siona ezali kosepela, bamboka ya Yuda etondi na esengo mpo na mikano na Yo.
12Botambola pembeni ya Siona, bokende zingazinga na yango, botanga bandako na yango ya milayi.
13Botala lopango na yango, botala malamu bandako na yango mpo ete bopesa sango epai ya bato oyo bakoya na sima.
14Pamba te Nzambe wana azali Nzambe na biso seko na seko mpe libela na libela ; akotambolisa biso, ezala kino na kufa.