1Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa. Yawe, kopamela ngai te kati na kanda na Yo to kopesa ngai etumbu te kati na kanda makasi na Yo.
2Pamba te makonga na Yo etoboli ngai, mpe loboko na Yo ebeti ngai.
3Mpo na kanda na Yo, nzoto na ngai ebeli ; mpo na masumu na ngai, mikuwa na ngai elembi.
4Mabe na ngai eleki moto na ngai, ezali kilo makasi epai na ngai lokola mokumba ya kilo makasi.
5Bapota na ngai epoli mpe ekomi kolumba solo mpo na bozoba na ngai.
6Nagumbami, nalembi makasi ; nakomi moto ya mawa mpo na libela.
7Pamba te nazali koyoka pasi makasi na mokongo na ngai, eteni ata moko te ya nzoto na ngai ezali malamu.
8Nalembi, makasi na ngai nyonso esili ; mobulu ekoti na motema na ngai, nakomi koganga na kolemba te.
9Nkolo, oyebi posa na ngai nyonso ; kolela na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.
10Motema na ngai ezangi kimia, makasi na ngai ekomi kosila, nabungisi ata pole ya miso na ngai.
11Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai bakimi pasi na ngai, ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.
12Bato oyo balukaka kufa na ngai bazali kotia mitambo, ba-oyo balukaka pasi na ngai bazali koloba mpo na kosala ngai mabe, bakomi mikolo nyonso kobongisa lokuta.
13Kasi ngai nazali kosala lokola mokufi matoyi ; mpe lokola baba, nakangi monoko, naboyi koloba.
14Nakomi lokola mokufi matoyi oyo akoki kopesa eyano ata moko te na monoko na ye.
15Yawe, natiaka elikya na ngai kati na Yo ; oh Nkolo, Nzambe na ngai, solo, okoyanola.
16Nalobaki : « Kopesa nzela te ete basepela na tina na ngai to bamitombola likolo na ngai soki nabeti libaku. »
17Pamba te nakomi pene ya kokweya, pasi na ngai ezali kaka elongo na ngai tango nyonso.
18Solo nandimi mabe na ngai, masumu na ngai ezali kotungisa molimo na ngai.
19Banguna na ngai bazali makasi mpe bingambe, bato oyo bayinaka ngai kaka pamba bazali ebele.
20Bato oyo bazongisaka mabe na bolamu bazali kofunda ngai atako nalukaka kosala bolamu.
21Yawe, kosundola ngai te ; Nzambe na ngai, kozala mpe mosika na ngai te.
22Nkolo, Mobikisi na ngai, yaka noki kosunga ngai.