1Libondeli ya moto na pasi, oyo abungisi elikya mpe azali kolela liboso ya Yawe. Yawe, yoka libondeli na ngai ! Tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo !
2Kobombela ngai elongi na Yo te, wana nazali na pasi. Yoka libondeli na ngai na mokolo oyo nazali kobelela Yo ; yanola ngai noki !
3Pamba te mikolo ya bomoi na ngai ezali kolimwa lokola molinga, mikuwa na ngai ezali kozika lokola makala ya moto.
4Motema na ngai ebungisi elikya mpe ezali komitungisa lokola matiti oyo bakati ; mpo na yango, nakomi ata kobosana kolia bilei na ngai.
5Mpo ete naleli makasi, natikali kaka na poso ya nzoto likolo ya mikuwa.
6Nakomi lokola esulungutu ya esobe, lokola esulungutu ya bisika oyo ebeba.
7Pongi ekimi ngai ; nakomi lokola ndeke oyo etikali yango moko na likolo ya ndako.
8Banguna na ngai batombokeli ngai, bazali kofinga ngai tango nyonso mpe bazali kosalela kombo na ngai mpo na kolakela bato mabe.
9Nakomi kolia putulu na esika ya bilei, mpe komela mayi esangana na mpinzoli na ngai.
10Mpo na kanda monene na Yo, otombokeli ngai mpe obwaki ngai mosika.
11Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokima lokola elili, mpe nakawuki lokola matiti.
12Kasi Yo Yawe, ozali Mokonzi mpo na libela, ozali Nzambe seko na seko.
13Okotelema solo mpo na Siona, pamba te ekomi tango ya koyokela yango mawa ; tango oyo ekatama ekoki.
14Pamba te biso basali na Yo, tosepelaka na mabanga na yango, mpe toyokelaka putulu na yango mawa.
15Bikolo ekotosa Yawe, mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima nkembo na Yo.
16Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona mpe akomonana kati na nkembo na Ye.
17Akoyanola libondeli ya bato oyo babungisaki biloko, mpe akondima mabondeli na bango.
18Tika ete bakoma yango mpo na ekeke oyo ekolanda, mpo ete bikelamu ya sika ekumisa Yawe.
19Wuta na Esika na Ye ya bule, wuta na likolo, Yawe atalaki biso awa na mokili
20mpo na koyoka kolela ya bakangami kati na boloko mpe kokangola bato oyo bazwaki etumbu ya kufa.
21Kombo ya Yawe ekokende sango kati na Siona, mpe masanzoli na Ye, kati na Yelusalemi
22tango bato mpe bikolo bakosangana mpo na kogumbamela Yawe.
23Na bomoi na ngai, abukaki lolendo ya makasi na ngai, mpe akitisaki motango ya mikolo ya bomoi na ngai.
24Nalobaki : « Nzambe na ngai, Yo oyo ozali na bomoi seko na seko, koboma ngai te na kati-kati ya mikolo ya bomoi na ngai !
25Na kala, otiaki miboko ya mokili, mpe maboko na Yo esalaki Likolo.
26Bango, bakokufa ; kasi Yo, okotikala seko na seko. Nzoto na bango ekolemba lokola elamba ; okobongola bango lokola kazaka, mpe bakolimwa.
27Kasi Yo, ozali ndenge moko, mibu na Yo ekotikala kosuka te.
28Bana ya basali na Yo bakozwa esika ya kovanda, mpe bakitani na bango bakowumela liboso na Yo. »