1Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.
2Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo ! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.
3Atiaki bikolo na se na biso, mpe mabota na se ya bokonzi na biso.
4Aponelaki biso libula na biso, oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.
5Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ; Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.
6Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye.
7Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.
8Nzambe akonzaka bikolo nyonso ; Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule.
9Bato minene ya bikolo basangani, lokola bato ya Nzambe ya Abrayami, pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe ; atombwama makasi.