1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo. Oh Yawe, makasi na ngai, nalingaka Yo.
2Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ; azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai ; azali nguba na ngai, Mobikisi na ngai, mpe ekimelo na ngai.
3Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.
4Basinga ya kufa efinaki ngai, mpela ya libebi epesaki ngai somo.
5Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, mitambo ya kufa ekangaki ngai.
6Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye ; koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.
7Mabele ekomaki koningana makasi, miboko ya bangomba elengaki mpe ebukanaki, pamba te Yawe asilikaki.
8Milinga ekomaki kobima na zolo na Ye, moto makasi elongo na makala ya moto ekomaki kobima na monoko na Ye.
9Yawe afungolaki Lola mpe akitaki ; mapata ya mwindo ezalaki na se ya matambe na Ye.
10Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki, apepaki na mapapu ya mopepe.
11Akomisaki molili ebombamelo na Ye, kapo na Ye, oyo ezingelaki Ye ; mapata minene ezingelaki Ye, mwindo lokola mayi ya mozindo.
12Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye ezalaki kokimisa mapata, konokisa mvula ya mabanga mpe kobimisa makala ya moto.
13Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki na nzela ya mvula ya mabanga mpe makala ya moto.
14Abwakaki makonga na Ye mpe atindaki yango na bangambo nyonso ; abakisaki motango ya mikalikali mpo na kopalanganisa yango.
15Yawe, tango ogangelaki yango, na nzela ya pema na Yo mpe ya milinga ya zolo na Yo, nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki, miboko ya mokili emonanaki na libanda.
16Atandaki loboko na Ye wuta na likolo, akamataki ngai mpe abimisaki ngai na likama oyo nazalaki na yango kati na mayi ya mozindo makasi ;
17akangolaki ngai wuta na maboko ya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai, pamba te balekaki ngai na makasi.
18Babundisaki ngai, na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.
19Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.
20Yawe asaleli ngai makambo wana kolanda bosembo na ngai, afuti ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai ;
21pamba te nabateli banzela ya Yawe, napesi Nzambe na ngai mokongo te lokola bato mabe.
22Natosaka mibeko na Ye nyonso mpe nabatelaka bikateli na Ye.
23Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamela mpe namibatelaki mpo ete nasala masumu te.
24Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bopeto ya maboko na ngai na miso na Ye.
25Solo, otalisaka bosembo na Yo epai ya moto oyo atambolaka na bosembo, mpe bolamu na Yo, epai ya moto oyo azangi pamela.
26Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto, kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka.
27Yo nde obikisaka banyokolami, okitisaka bato na lofundu.
28Yawe, Nzambe na ngai, Yo nde opelisaka mwinda na ngai ; obongolaka molili na ngai pole.
29Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli ; mpe na lisungi ya Nzambe na ngai, nakatisaka bamir.
30Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka, Liloba na Yawe ezali na mbeba te ; azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
31Nani azali Nzambe soki Yawe te ? Nani azali libanga soki Nzambe na biso te ?
32Nzambe apesaka ngai makasi mpe akomisaka nzela na ngai ya kokoka ;
33akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko, mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo ;
34alakisaka ngai kobunda, mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.
35Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai, loboko na Yo ya mobali elendisaka ngai, mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.
36Otambolisaka ngai na kimia, mpe makolo na ngai elengaka te.
37Nalandaka banguna na ngai, mpe nakangaka bango ; nazongaka kaka soki nasilisi koboma bango.
38Nabebisaka bango nye, mpe bakokaka lisusu kotelema te ; bakweyaka na se ya matambe na ngai.
39Opesaka ngai makasi ya bitumba, ogumbaka banguna na ngai mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai.
40Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, mpe nabebisaka bayini na ngai.
41Bagangaka mpo na koluka lisungi, kasi moto oyo akokaki kobikisa bango azalaka te ; babelelaka Yawe, kasi ayanolaka bango te.
42Nanikaka bango lokola putulu oyo mopepe epumbwisaka, nanyataka bango lokola potopoto ya nzela.
43Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.
44Soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai ; mpe bapaya bayaka mpo ete nasepela na bango.
45Bango nyonso balembi nzoto mpe bakomi kobima na kolenga wuta na bandako na bango ya makasi.
46Longonya na Yawe ! Tika ete Ye oyo azali libanga na ngai akumisama ! Tika ete Nzambe ya lobiko na ngai anetolama !
47Azali Nzambe oyo abundelaka ngai, oyo atiaka bikolo na se ya matambe na ngai,
48oyo akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai. Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai, obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
49Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo ; nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
50Yawe apesaka elonga monene epai ya mokonzi na Ye, atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye, epai ya Davidi mpe epai ya libota na ye, mpo na libela.