1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba, nakotatola misala minene na Yo nyonso.
2Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
3Banguna na ngai bazongaka sima, bakweyaka mpe balimwaka liboso na Yo.
4Pamba te, okataki likambo na ngai mpe olongisaki ngai, ovandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mosambisi ya sembo.
5Opamelaki bikolo mpe obomaki moto mabe, olimwisaki kombo na bango mpo na libela.
6Banguna na ngai balimwa mpo na libela ; opanzaki bingumba na bango kino bakanisa bango lisusu te.
7Yawe akonzaka mpo na libela, atia Kiti na Ye ya Bokonzi mpo na kokata makambo ya bato.
8Akonzaka mokili na bosembo, akataka makambo ya bato na alima.
9Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.
10Bato oyo bayebi Kombo na Yo batiaka elikya na bango kati na Yo ; pamba te, Yo Yawe, osundolaka te bato oyo balukaka Yo.
11Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Siona banzembo ya masanzoli ; bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.
12Pamba te Yawe azongisaka mabe na mabe mpo na makila oyo esopani, akanisaka koganga ya banyokolami.
13Yawe, yokela ngai mawa, tala ndenge nini bayini na ngai bazali konyokola ngai, mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa ;
14mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko, mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.
15Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.
16Yawe amilakisi na nzela ya misala na Ye ya bosembo ; bato mabe bakangami na mitambo oyo bango moko basalaki.
17Bato mabe, bikolo nyonso, oyo bakanisaka Nzambe te, bakokende na mboka ya bakufi.
18Kasi Nzambe akotikala te kobosana mobola, mpe elikya ya banyokolami ekotikala seko na seko.
19Yawe, telema ! Tika ete moto alonga te ; tika ete bapagano basamba liboso na Yo !
20Yawe, tika ete somo ekanga bango ; tika ete bapagano bayeba ete bazali na bango kaka bato !