1Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, kovanda nye te ! Nzambe, kokanga monoko na Yo te, kotikala kimia te !
2Tala ndenge banguna na Yo bazali kotomboka ; tala ndenge bayini na Yo bazali kotombola mito na bango !
3Bazali kosalela bato na Yo likita, kokanela bato oyo obatelaka.
4Bazali koloba : « Boya, toboma bango nyonso mpo ete ekolo na bango ezala lisusu te, mpo ete batanga lisusu kombo ya Isalaele te. »
5Basangani mpe bayokani, basali boyokani mpo na kotelemela Yo :
6bato ya Edomi mpe bato ya Isimaeli, bato ya Moabi mpe bato ya Agari,
7Gebali, Amoni mpe Amaleki, bato ya Filisitia elongo na bato ya Tiri.
8Bato ya Asiri mpe basangani elongo na bango mpo na kobakisa bakitani ya Loti makasi.
9Sala bango ndenge osalaki Madiani, ndenge osalaki Sisera mpe Yabini, kuna na mayi ya Kishoni.
10Babebisamaki na Eyini-Dori, bakomaki lokola matiti ya kopola mpo na mabele.
11Sala bato na bango ya lokumu ndenge osalaki Orebi mpe Zeebi ; mpe sala bakambi na bango ndenge osalaki Zeba mpe Tsalimuna
12oyo bazalaki koloba : « Tobotola mabele ya Nzambe ! »
13Nzambe na ngai, balola bango lokola matiti oyo mopepe ezali kopumbwisa.
14Ndenge moto ezikisaka zamba, ndenge moto makasi ezikisaka bangomba,
15landa bango na nzela ya mopepe na Yo mpe bangisa bango na nzela ya mopepe makasi na Yo !
16Yawe, tondisa bilongi na bango na soni mpo ete baluka Kombo na Yo !
17Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela ! Tika ete bakufa na soni !
18Tika bayeba ete Yo, oyo Kombo na Yo ezali Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo kati na mokili mobimba !