1Nzembo ya Azafi. Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye, azali kokata makambo kati na banzambe.
2Kino tango nini bokokata makambo na bosembo te mpe bokokotela bato mabe ?
3Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola ;
4bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.
5Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili ; miboko nyonso ya mokili ezali koningana.
6Nalobaki : « Bozali banzambe, bozali bino nyonso bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ! »
7Nzokande, bokufaka lokola bato nyonso mpe bokweyaka lokola bakambi.
8Nzambe, telema, sambisa mokili ; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.