1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Mpo na Yo Nzambe, bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ; mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.
2Yo oyo oyokaka mabondeli, bato nyonso bakoya epai na Yo.
3Kilo ya bambeba eleki makasi mpo na ngai ; kasi Yo, olimbisaka masumu na biso.
4Esengo na moto oyo oponi mpe obulisi mpo ete avanda kati na lopango na Yo. Tokotonda na bolamu ya Ndako na Yo, Tempelo na Yo ya bule.
5Nzambe Mobikisi na biso, oyanolaka biso na bosembo, na nzela ya biloko ya somo ; Ozali elikya ya mokili mobimba mpe ya bibale minene.
6Alendisaka bangomba, na nguya na Ye ; atondi na mpiko.
7Akitisaka makelele ya bibale minene, makelele ya bambonge na yango mpe makelele ya bikolo.
8Bato oyo bavandaka na basuka ya mokili babangaka tango bamonaka bikamwa na Yo ; osalaka ete este mpe weste eganga na esengo.
9Opambolaka mabele, ofulukisaka yango, otondisaka yango na bozwi. Otondisaka moluka ya Nzambe na mayi, obongiselaka bato ble, pamba te otondisaka mayi mpo na yango.
10Olekisaka mayi kati na mikala, okweyisaka mipiku ya mabele, osopelaka mabele mayi mpe opambolaka milona.
11Opambolaka mobu na bolamu na Yo, mpe banzela mike oyo olekelaka ebotaka ebele.
12Bilanga ya esobe etondaka na bilei, mpe bangomba mike etondaka na esengo.
13Bilanga etondaka na bameme mpe bantaba ; mabwaku etondaka na ble, egangaka na esengo mpe eyembaka.