1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Yawe, mokonzi azali kosepela na nguya na Yo; Tala ndenge nini elonga oyo opesi ye epesi ye esengo monene !
2Okokisi posa ya motema na ye mpe opimeli ye te oyo azalaki kosenga Yo.
3Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya. Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu.
4Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango ; opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.
5Nkembo na ye ezali monene mpo na lobiko oyo opesaki ye ; olatisaki ye na kongenga mpe na lokumu.
6Solo, okomisi ye etima ya mapamboli ya seko na seko ; okomisaki ye moto ya esengo na miso na Yo.
7Mokonzi atiaka elikya na Yawe, aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
8Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso ; loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.
9Tango okomimonisa, okokomisa bango lokola fulu ya moto. Yawe akosilisa koboma bango na kanda na Ye, mpe moto ekozikisa bango.
10Okolimwisa mabota na bango na mokili, mpe bakitani na bango, kati na bana ya bato.
11Atako bakani kosala Yo mabe, atako basali mabongisi ya mabe mpo na kotelemela Yo, bakotikala kolonga ata moke te ;
12pamba te okobengana bango tango okobwakela bango bambanzi ya tolotolo na Yo.
13Yawe, telema na nguya na Yo ! Tokoyemba nguya na Yo na nzela ya banzembo.