1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe ! Kokutanisa ngai te na bato na kanza.
2Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.
3Bapelisaka lolemo na bango lokola nyoka, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.
4Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe ; kokutanisa ngai te na bato na kanza oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai !
5Bato ya lofundu batieli ngai mitambo, batandi basinga ya minyama na nzela mpe batimoli mabulu mpo na kokanga ngai.
6Nalobaka na Yawe : « Ozali Nzambe na ngai ! » Yawe, yoka mabondeli na ngai.
7Oh Yawe, Nkolo na ngai, ozali makasi ya lobiko na ngai, obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.
8Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe, kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.
9Tika ete pasi oyo bibebu na bango esili kobongisa ekweyela bato oyo bazingeli ngai.
10Tika ete makala ya moto esopanela bango ! Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto, kati na mabulu ya potopoto epai wapi bakokoka kotelema lisusu te !
11Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.
12Nayebi ete Yawe akotaka makambo ya babola mpe alongisaka bato oyo bakelela.
13Solo, bato ya sembo bakosanzola Kombo na Yo, bato ya alima bakovanda liboso na Yo.