1Nzembo ya Davidi. Nzambe, motema na ngai ezali na kimia ! Nakoyembela Yo, nakosanzola Yo na mindule ; ezali mpe lokumu na ngai.
2Lindanda mpe nzenze, bolamuka ! Nalingi kolamusa tongo.
3Nkolo, nakosanzola Yo kati na bato, nakoyembela Yo kati na bikolo.
4Pamba te bolingo na Yo ezali monene koleka Lola, mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.
5Oh Nzambe, tika ete otombolama na likolo ya Lola, mpe nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !
6Bikisa biso na nguya ya loboko na Yo mpe yanola biso, mpo ete balingami na Yo bakangolama !
7Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule : « Nakolonga ! Nakokabola Sishemi mpe nakotia bandelo ya lubwaku ya Sukoti.
8Galadi ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai ; Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende, mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.
9Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Nazali kobeta milolo ya bitumba mpo na kobundisa mokili ya Filisitia. »
10Nani akomema ngai na engumba batonga makasi ? Nani akotambolisa ngai kino na Edomi ?
11Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso, Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba elongo na mampinga na biso !
12Yaka kosunga biso, kangola biso liboso ya moyini ! Pamba te lisungi ya bato ezali pamba.
13Elongo na Nzambe, tokosala makambo minene mpe ya kokamwa ; ezali Ye nde akonyata banguna na biso.