1Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba. Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo !
2Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu,
3na lindanda ya basinga zomi mpe na nzenze !
4Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai ! Nagangaka na esengo liboso ya misala ya maboko na Yo.
5Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo !
6Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.
7Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.
8Kasi Yo, kuna na likolo, ozali Yawe mpo na libela.
9Yawe, banguna na Yo, banguna na Yo bakokufa penza ; bato nyonso ya misala mabe bakolimwa.
10Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika.
11Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai, mpe matoyi na ngai ekomi koyoka banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa mpo na kosala ngai mabe.
12Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.
13Lokola bapikama ngwi kati na Tempelo ya Yawe, bamonaka bolamu kati na lopango ya Nzambe na biso.
14Ata bakomi mibange, babotaka kaka, bazalaka kaka makasi mpe kitoko,
15basakolaka : « Yawe azali alima, azali Libanga na biso ; kati na Ye, mabe ezali te ! »