1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati. Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba ! Ovandisi nkembo na Yo kati na Lola.
2Na nzela ya masanzoli ya bana mpe bana mike, otelemisi ndako batonga makasi, mpo na kotelemela bayini na Yo mpe kokanga monoko ya monguna mpe ya moto oyo alingaka kozongisa mabe na mabe.
3Tango natalaka Lola na Yo, mosala ya misapi na Yo, sanza mpe minzoto oyo otia,
4namitunaka : Moto azali nini mpo ete okanisa ye, mpe moto azali nani mpo ete obatela ye ?
5Osalaki ye moke koleka ba-anjelu mpe olatisaka ye motole ya nkembo mpe ya lokumu ;
6otia ye moyangeli ya misala ya maboko na Yo, otia nyonso na se ya matambe na ye :
7bameme, bantaba, bangombe mpe banyama ya zamba,
8bandeke ya likolo, mbisi ya ebale monene mpe nyonso oyo etambolaka na bibale.
9Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba !