1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi. Mobateli ya Isalaele, Yo oyo otambolisaka Jozefi lokola etonga ya bameme, yoka ; Yo oyo Kiti ya Bokonzi na Yo ezali kati na basheribe, mimonisa
2liboso ya Efrayimi, ya Benjame mpe ya Manase. Monisa nguya na Yo mpe yaka kobikisa biso !
3Oh Nzambe, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.
4Eh Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kino tango nini okotombokela mabondeli ya bato na Yo ?
5Oleisaki bango lipa esangana na mayi ya miso mpe olangwisaki bango na kopo etonda na mpinzoli ;
6okomisaki biso eloko ya kotiola mpo na bazalani na biso, mpe banguna na biso bakomi kotiola biso.
7Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.
8Nzete ya vino oyo opikolaki wuta na Ejipito, olonaki yango wana obenganaki bikolo ebele.
9Obongiselaki yango mabele mpo ete ezwa misisa mpe etondisa mokili.
10Elili na yango ezipaki bangomba, bitape na yango ezalaki lokola banzete minene ya sedele.
11Epanzaki bitape na yango kino na ebale monene, mpe mito na yango ya sika kino na ebale.
12Mpo na nini otoboli madusu kati na bamir na yango ? Tala ndenge baleki nzela bazali kobuka bambuma na yango !
13Ngulu ya zamba ezali kobebisa yango, mpe nyama ya zamba ezali kolia yango.
14Zongela biso lisusu, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ! Wuta na likolo, tala mpe mona ! Senzela mpo na nzete oyo ya vino !
15Batela nzete oyo loboko na Yo ya mobali elonaki, batela solo mwana oyo Yo moko obokolaki.
16Bakati nzete na Yo ya vino mpe batumbi yango na moto ; tika ete bakufa na pamela ya elongi na Yo !
17Tika ete loboko na Yo ezala na likolo ya mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe na likolo ya mwana na moto oyo Yo moko okomisaki makasi.
18Boye, tokozala lisusu mosika na Yo te ; zongisela biso lisusu bomoi, mpe tokobelela Kombo na Yo.
19Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.