1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya mawa oyo Davidi ayembelaki Yawe na tina na Kushi, moto ya libota ya Benjame. Yawe, Nzambe na ngai, nabombamaka kati na Yo ; bikisa ngai mpe kangola ngai liboso ya bato nyonso oyo balukaka koboma ngai.
2Soki te, bakopasola ngai lokola nkosi mpe bakokata ngai na biteni, mpe moto akozala te mpo na kosunga ngai.
3Yawe, Nzambe na ngai, soki nasalaki makambo oyo bazali kopamela ngai mpo na yango, mpe soki ezali na mabe na maboko na ngai,
4soki nasalaki moninga na ngai mabe, soki nabotolaki na makasi mpe kaka na pamba, biloko ya moyini na ngai ;
5wana tika ete monguna na ngai alanda mpe akanga ngai, tika ete asakanela bomoi na ngai mpe abebisa lokumu na ngai.
6Yawe, telema na kanda na Yo, telemela kotomboka ya banguna na ngai. Nzambe na ngai, telema, kata likambo na ngai.
7Tika ete bikolo esangana zingazinga na Yo, kasi Yo, konza bango wuta na Kiti na Yo ya Bokonzi.
8Tika ete Yawe asambisa bikolo. Yawe, longisa ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bozangi pamela na ngai, Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
9Yo Nzambe ya sembo oyo ososolaka mozindo ya mayele mpe ya mitema, sukisa kanza ya bato mabe mpe yikisa moto ya sembo mpiko.
10Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali nguba na ngai, abikisaka bato ya sembo.
11Nzambe azali Mosambisi ya sembo, asilikaka mikolo nyonso.
12Soki alembisi kanda na Ye te, akopelisa minu ya mopanga na Ye, akobongisa mpe akobeta tolotolo na Ye.
13Abongisaka bibundeli oyo ebomaka mpe asalaka ete makonga na Ye ekoma kozikisa.
14Moto nyonso oyo abongisaka kosala mabe alukaka ndenge nini koyokisa bato pasi mpe abebisaka boyokani ;
15atimolaka libulu, kasi ye moko nde akweyaka kati na yango.
16Pasi oyo ayokisaka bato ezongelaka ye moko, mpe mabe na ye ekweyaka na moto na ye moko.
17Nakokumisa Yawe mpo na bosembo na Ye, mpe nakosanzola Yawe-Oyo-Aleki-Likolo na banzembo.