1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe, yoka koganga na ngai, yoka na bokebi losambo na ngai.
2Wuta na suka ya mokili, nazali kobelela Yo, motema na ngai ebukani ! Mema ngai na libanga oyo eleki likolo epai wapi nakokoka te kokoma ngai moko.
3Pamba te, ozali ebombamelo na ngai, ndako molayi batonga makasi, liboso ya banguna na ngai.
4Posa ya motema na ngai ezali : kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo.
5Pamba te Yo Nzambe, oyokaki bandayi na ngai, opesaki ngai libula ya bato oyo batosaka Kombo na Yo.
6Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ; tika ete awumela na bomoi.
7Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe ! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.
8Boye, nakoyemba mikolo nyonso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, mpe nakokokisa bandayi na ngai mokolo na mokolo.