1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Ebenga ya terebente ya mosika. » Nzembo ya Davidi, tango bato ya Filisitia bakangaki ye kati na mboka Gati. Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te bato bazali kotungisa ngai. Babundisaka mpe banyokolaka ngai mikolo nyonso.
2Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso ; bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.
3Mokolo oyo nazalaka na bobangi, natiaka elikya na ngai kati na Yo.
4Epai ya Nzambe, nakumisaka Liloba na Ye ; Epai ya Nzambe, natiaka motema mpe nabangaka te. Moto oyo akokufa akoki kosala ngai nini ?
5Babongolaka maloba na ngai mikolo nyonso ; mabongisi na bango nyonso ezalaka mpo na kosala ngai mabe.
6Basalaka makita, babombamaka, balandaka ngai mpo na kosala ngai mabe.
7Mpo na makambo oyo ya mabe, boni, bazanga etumbu ? Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo !
8Solo, oyebi motango ya matambe ya bomoi na ngai ya mitelengano. Sopa mpinzoli na ngai kati na mbeki na Yo, oyo ezali buku na Yo ya ekaniseli.
9Bongo, na mokolo oyo nakobelela mpo na kosenga lisungi, banguna na ngai bakozonga sima. Na nzela ya likambo yango, nakoyeba ete Nzambe azali mpo na ngai.
10Pembeni ya Nzambe oyo nakumisaka Liloba na Ye, pembeni ya Yawe oyo nakumisaka Liloba na Ye,
11pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema mpe nazalaka na bobangi te, moto akoki kosala ngai nini ?
12Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai mpe nakobonza bambeka ya matondi.
13Pamba te okangoli ngai na kufa mpe obateli makolo na ngai ete ebeta mabaku te, mpo ete natambola liboso na Yo Nzambe kati na pole ya bomoi.