1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, komibomba te wana nazali kobelela Yo.
2Yoka ngai mpe yanola ngai. Kati na kolela na ngai, nakomi koyengayenga mpe nazangi kimia,
3mpo na maloba ya monguna na ngai mpe kanda ya moto mabe, pamba te bazali kokweyisela ngai misala mabe mpe konyokola ngai na kanda.
4Motema na ngai etondi na mawa, mpe somo ya kufa ekangi ngai.
5Nakomi kobanga mpe kolenga, somo monene ekangi ngai.
6Nakomi komilobela : « Soki nazalaki ata na mapapu ya ebenga, nalingaki kopumbwa mpo na koluka bopemi ;
7nalingaki kokima mosika penza, mpo na kokende kovanda ata na esobe.
8Solo, na lombangu penza, nalingaki kokende koluka ebombamelo mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki. »
9Nkolo, bebisa mabongisi ya banguna na ngai mpe kotisa mobulu kati na bango ; pamba te, kati na engumba, nazali komona mobulu mpe bokabwani.
10Butu mpe moyi, ezali kotambola na bamir na yango ; misala mabe mpe ya kanza etondi kati na yango.
11Banguya oyo ebebisaka ezali kosala kati na yango, minyoko mpe lokuta ezali kosila te.
12Soki monguna nde azalaki kofinga ngai, nalingaki kokanga motema ; soki ezalaki mpe moyini nde azalaki kotelemela ngai, nalingaki komibomba mpo ete amona ngai te.
13Kasi ezali yo, moto lokola ngai, oyo otambolaka elongo na ngai, molingami mpe moninga na ngai ya motema
14oyo nazalaki kokabola elongo na yo, pasi mpe basekele tango tozalaki kokende nzela moko na Tempelo ya Nzambe.
15Tika ete kufa ekanga bango na mbalakata mpe bakita ya bomoi kati na mboka ya bakufi ; pamba te mabe etondi kati na bandako mpe mitema na bango.
16Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe, mpe Yawe akobikisa ngai.
17Tongo, midi, pokwa, nasopaka motema na ngai mpe nalelaka, mpe ayokaka mongongo na ngai.
18Akopesa ngai kimia, akokangola ngai na bitumba oyo babundisaka ngai ; pamba te bato oyo batelemeli ngai bazali ebele.
19Nzambe ayokaka, akosambwisa bango penza ; akonzaka mpo na libela na libela. Babongolaka mitema te mpe batosaka Nzambe te.
20Abundisi balingami na ye, abebisi boyokani na ye.
21Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
22Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo ; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.
23Mpe Yo, Nzambe, okobwaka basopi makila mpe bakosi kati na libulu ya libebi ; bakokokisa ata kati-kati te ya mikolo ya bomoi na bango. Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo.