1Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki. Nakopambola Yawe tango nyonso, nakokumisa Ye mikolo nyonso na bibebu na ngai.
2Tika ete bomoi na ngai emikumisa kati na Yawe ; tika ete banyokolami bayoka mpe basepela !
3Boya kosakola elongo na ngai ete Yawe azali monene ! Tonetola Kombo na Ye, biso nyonso.
4Nalukaki Yawe, mpe ayanolaki ngai ; akangolaki ngai na somo na ngai nyonso.
5Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo, mpe bayokisamaka soni ata moke te.
6Mobola agangaki, mpe Yawe ayokaka ye ; abikisaki ye na pasi na ye nyonso.
7Anjelu ya Yawe atongaka molako na ye zingazinga ya bato oyo batosaka Yawe, mpe akangolaka bango.
8Bomeka elengi mpe botala ndenge nini Yawe azali malamu ; Esengo na moto oyo azwaka Yawe lokola ebombamelo na ye !
9Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe ; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te.
10Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala, kasi bato oyo balukaka Yawe bakozanga eloko moko.
11Bana na ngai, boya, boyoka ngai ; Nakolakisa bino kotosa Yawe.
12Nani asepelaka na bomoi ? Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo ?
13Batela lolemo na yo mosika na mabe, mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.
14Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, luka kimia mpe koba na yango.
15Miso ya Yawe etalaka bato ya sembo, mpe matoyi na Ye eyokaka koganga na bango ;
16kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.
17Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.
18Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.
19Pasi mingi ekangaka moto ya sembo, kasi Yawe akangolaka ye na nyonso,
20abatelaka mikuwa na ye nyonso mpo ete moko te kati na yango ebukana.
21Mabe ebomaka moto mabe, mpe bayini ya moto ya sembo bakozwa etumbu.
22Yawe akangolaka bomoi ya basali na Ye ; mpe bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango bakozwa etumbu te.