1Tala, mobebisi azali koya kosala yo mabe ! Batela malamu bandako na yo batonga makasi, kengela nzela na yo, bongama mpo na bitumba mpe sangisa bato na yo.
2Yawe akozongisa lisusu nkembo ya Jakobi mpe ya Isalaele, atako babebisaki mpe bapanzaki mokili na bango, mpe atako babebisaki bilanga na bango ya vino.
3Banguba mpe bilamba ya basoda na bango ezali ya langi ya motane ; bibende ya bashar na bango ezali kongenga na mokolo oyo babongisi mpo na bitumba, mpe makonga basala na nzete ekomi kotambola bipai na bipai.
4Bashar ezali kokota na elulu na nzela, ezali kokende mpe kozonga na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; ezali komonana lokola koni oyo ezali kopela moto, ezali kotambola na bangambo nyonso lokola mikalikali.
5Abengi basoda na ye nyonso ya mpiko. nzokande, na nzela na bango, bazali kotepatepa, bazali kokende na lombangu pene ya mir.
6Bikuke ya ebale efungwami, mpe ndako na ye ya bokonzi ebukani.
7Ekatami ete engumba wana ekokende na bowumbu mpe bakomema yango mosika penza ; basali na yango ya basi bakolela lokola bibenga mpe bakomibeta batolo likolo ya pasi.
8Na kala, engumba Ninive ezalaki lokola liziba ya mayi. Kasi tala yango lelo oyo : etoboki mpe ekomi kobimisa mayi ! Bazali kobelela : « Botelema ! Botelema ! » Kasi ata moto moko te azongi lisusu kuna.
9Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi, pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka mpe etonda na biloko ya motuya.
10Bakoteli yango, bapanzi yango, babotoli na makasi biloko na yango ya talo ! Mitema ebukani, mabolongo ekomi kolenga, mpe banzoto etondi na somo.
11Wapi sik’oyo libulu epai wapi bankosi ezalaki kobokola bana na yango ? Wapi sik’oyo libulu epai wapi nkosi ya mwasi elongo na bana na yango ezalaki kotambola na somo ata moke te ?
12Nkosi ebomi banyama ebele mpo ete epesa yango lokola bilei epai ya bana na yango, ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango, bongo etondisi libulu na yango na banyama oyo ebomi mpe na misuni.
13« Nakotombokela yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « nakozikisa bashar na yo na moto, mpe mopanga ekoboma bana ya nkosi na yo. Nakobotola yo misuni nyonso awa na se ; boye mongongo ya batindami na yo ekotikala koyokana lisusu te. »