1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda. Nzambe, bosembo na ngai, soki nabeleli Yo, yanola ngai. Kangola ngai na pasi, salela ngai ngolu, mpe yoka libondeli na ngai.
2Bino bato, kino tango nini bokoyokisa nkembo na ngai soni ? Kino tango nini bokomisepelisa na makambo ya pamba mpe bokolanda makambo ya lokuta ?
3Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko mosali oyo azali sembo na miso na Ye ; Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.
4Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; soki bolali na mbeto, bolukaka kososola makambo mpe bovandaka kimia.
5Bobonzaka bambeka kolanda mibeko mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.
6Bato mingi bazali kotuna : « Nani akomemela biso bolamu ? » Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.
7Tondisa motema na ngai na esengo soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.
8Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia, pamba te, Yo moko Yawe, osalaka ete navanda na kimia.